Projet Makala - projets.cirad.frprojets.cirad.fr/content/download/11193/66999/file/GP...
Transcript of Projet Makala - projets.cirad.frprojets.cirad.fr/content/download/11193/66999/file/GP...
Botumbi makala na ndenge elongobani
«Lolenge kani okoki kozwa makala ebele ?»
Projet Makala«Gérer durablement la ressource bois énergie»
Banso tozongisa zamba
Guide pratique
Buku ya projet Makala
Guide Pratique ya Projet Makala 1
BotumBi makala Boleki malamu
Mabongisi ya fulu esengeli ebanda sikoyo mpo ete nzete ekauka sanza moko to mibale
Makambo manene masengeli na botumbi makala mango maye :Ebongi kokausa nkoni sanza 1 liboso ya botumbi makala •(pages 2 à 3),Botosi malamu mibeko mia botongeli fulu ya botumbeli makala •(page 4 à 15),Bulandeli mokolo na mokolo etumbameli elamu ya makala o fulu •(page 16 à 21) .
Tina ya motumbi makala ezali bozui lifuta ebele kaka na mosala wana ya bozui makala kaka wana. Ntina ya batu banso ezali nde bokati nzete ya nkoni ezala mingi te nzinga nzinga ya ba mboka minene soki lolenge ya botumbeli makala elongo bani. Zambi zamba ekokatama moke moke po na bozui makala.
Ntina ya botumbi malamu ezali po bozui makala ebele na liboke ya nkoni kaka wana ezali kotumbama. Kolandela maye ma sengeli bosali mpe maye masalaka motumbi makala mapesaka mbano elamu.
Guide Pratique ya Projet Makala 2
Po te nzete ya sika ebima ebongi kokata nzete na bosanda
bwa 10 cm kobanda mabele
Bokati nzete
10 à 15 cmmax
Guide Pratique ya Projet Makala 3
Bokausi nkoni
Po na bozui makala ebele na fulu ebongi okausa nkoni sanza moko to
mi bale na moyi…
... biteni ya minene ebongi epasuka po motema ya nzete ekauka malamu
Guide Pratique ya Projet Makala 4
BoBongisi esika
Nazali kokombola esika mpo mosala esalama
na mpasi te
Esika ezala esembama pe ekomboma polele
Guide Pratique ya Projet Makala 5
Fulu diamu diFweti tala ku kutakwenda mupepi
Fulu na ngai ekotala epai mopepe ezali kokende
BOLAI
Mopepe mokoka
Guide Pratique ya Projet Makala 6
Botandi nkoni ya nzela ya engunduka
Soki mabele ezali makasi te, nakotia bipikamelona onse nzela ya engunduka po fulu
ekita te
Po mupepe mopanzana malamu na se ya fulu na kotiya nkoni
ya nzela ya engunduka* oyo ya yambo na ntaka ya 50 cm , ezala kosembama etandama malamu
*Nzela ya engunduka : nkoni esemwama ezali na bunene bwa 8 to 10 cm etandamaka na nse o bobandi bwa botongi fulu.
Guide Pratique ya Projet Makala 7
BoBangisi minoko mia Bokotisi mopepe
Monoko ya bokotisi mopepe ezala monene te, timola
yango na likwangola
Nazipi miango na nzete ike po été mable na bifelo bia fulu ezipa miango te.
Guide Pratique ya Projet Makala 8
BoFandisi Fulu o liBulu
Soki mabele ezali zelo mpe nazali na nkoni ebele,
nakoki kotimola libulu po ya kokitisa bosanda bwa fulu
40 à 50 cm de profondeur
Mopepe mokoka
Guide Pratique ya Projet Makala 9
BoBongisi minoko mia Bokotisi mopepe o Fulu ya liBulu
Nazali kotimola minoko ya bokotisi
mopepe na fulu
Nazali kotia bilembo bisika bia madusu ma mopepe po ya bofungoli yango na suka
ya botongi fulu (cf. page15)
Guide Pratique ya Projet Makala 10
BoBongisi etoko ya Fulu
Ebongi etoko evanda malamu pe ezanga madusu
Nkoni ezala ya kotengama te mpe bonene bwa 4 to 5 cm
Guide Pratique ya Projet Makala 11
Botongi Fulu na nkoni (eteni ya yamBo)
Nazali kobakisa nkoni na lolenge ya kotika ata lidusu te. Mbala inso tozali kobakisa nkoni, totondisa madusu na biteni bia nkoni, totondisa madusu na biteni bia nkoni mike pe mikuse
Mbala inso tozali kobakisa nkonimike pe mikuse*
* Biteni mike ya nzete esengeli na botondisi bisika bizangi nkoni tango ya botongi fulu.
Guide Pratique ya Projet Makala 12
Botongi Fulu (eteni ya BaBale)
Lolenge ya botongi fulu na ngai ezali malamu ezangi madusu
Biteni minene ya nkoni epaswami pe bitiami o kati kati
Guide Pratique ya Projet Makala 13
Bolatisi Fulu
Nalatisi fulu likolo na matiti pe nkasa
Nalatisi mpe pembeni pembeni ya fulu na
matiti etelema
Guide Pratique ya Projet Makala 14
Bozipi na maBele
Nazali kokunda fulu na mabele bisika binso bitiami matiti
mpe nkasaNazali kopanza mabele bisika binso na 40 cm likolo ya fulu po ekangema
malamu penza
Guide Pratique ya Projet Makala 15
BuFungoli maBulu ma mopepe
Pe nalongoli mabele na likwangola soki ekoki
Po na fulu ya libulu, nakotimola na botelemi mpo ya bofungoli
monoko mua mpepe
Nalongoli mwa banzete totiaki bisika binso bizali
madusu ya mopepe
Guide Pratique ya Projet Makala 16
Botiyi moto
Nalongoli mabele pe matiti esika ya botiyi moto
likolo ya fulu(moteur) na mokongo ya epai mopepe
mozali kokende
Nakozwa makala niapela na moto oyo ezali pembeni
ya fuluya fulu
Guide Pratique ya Projet Makala 17
kokengele Fulu 1kokengela Fulu o eBandeli ya mikolo ya liBoso
Milinga tango nionso ya pembe. Kozika ya malembe.kokengele mbala
moko to mibale na mokolo po na boziki malamu.
Milinga makasi, moto makasi kati ya fulu,
kanga moke madusu
Guide Pratique ya Projet Makala 18
Bokengeli Fulu 2kanga Bisika BitoBwami mimisa moto
Bisika bitoboki bikangama, noki makala ebeba
Po na komibatela, nakoniata likolo ya eteni ya nzete po na botamboli
likolo ya fulu
Guide Pratique ya Projet Makala 19
Bokongele Fulu 3BotamBwisi BotumBi makala
Botumbi makala esili, fulu ekiti kati ,kati nakangi madusu manso po
makala mabeba te. Nazali kokanga minoko mia mopepe na ngambo oyo
po été makala mabela te
Guide Pratique ya Projet Makala 20
Bokangi Fulu
Milinga ezali lisusu te, makala maziki, kanga madusu manso
Niata mabele malamu bisika
bitoboki
Guide Pratique ya Projet Makala 21
BoFungoli Fulu
Soki fulu ekomi pio ; sima ya makolo,
fungola fulu pe panza makala
Kosala ntongo ntongo to na pokwa po na kumona makala maye mazali nanu kopela, kotia yango mabele po ekufa pe esila moto. Soki mazali, nakozipa mango mabele kino makokufa moto
mpe makokoma pio
Guide Pratique ya Projet Makala 22
Botiyi na saki
Natali malamu makala manso masili moto mpe nakaboli mango mabele pe bitikali bikota o saki te
Guide Pratique ya Projet Makala 23
BoBongisi lolenge BotumBi makala, milekeli ya zamBa na motu oyo
atumBaka makala
Sikoya nazali kokawus nkoni pe kokengela fulu, lozui kwa ngai kwa
makala bomati
Na lolenge lona, bokati zamba ekokita !
Guide Pratique ya Projet Makala 24
François Pinta (1); Dieudonné Kalala (2); Emilien Dubiez (2); Adelaïde Larzillière (2); Jean-Noël Marien (3) :
(1) Cirad UR Biomasse énergie, 73 av. Jean-François Breton34398 Montpellier - France
[email protected] (2) Cirad dep ES, UR 36, c/o FHS Kinshasa Gombe – RDC
[email protected] [email protected] [email protected]
(3) Cirad dep ES, UR 36, Baillarguet - Montpellier – France [email protected]
Projet Makala :57 Av. des sénégalais – Gombe – Kinshasa – RDCSite web: http://makala.cirad.fr Publication janvier 2012
Misala ya « projet Makala » ezwi lisalisi ya mosolo epai ya « Union Européenne » engebene na mokanda ya bopesi mbongo DCI-ENV/2008/151-384 na molongo 21 04 01(EuropeAid/126201/C/ACT/Multi). Mama ya likambo ya likanisi liye « projet Makala » : na bota-laka mposa ya bai - mboka ya kolamba na koni to makala ezali kokola mpe banzete ezali kosila , esengeli kobongisa bowumeli ya bozwi ya banzete basalelaka nkoni to makala na mboka Congo mpe mosika na etando ya Africa oyo ezali na ngunda. Ntina mokonzi ya likanisi oyo « projet Makala » : kosala te bato bazanga banzete mpo na makala to nkoni te na bingumba ebale ya ekolo Congo Demokratiki mpe ya ekolo Congo ya ngambo awa bazamba elonami to oyo Nzambe akela bikokatama na lolonge ebongi mpe makala to nkoni ekosalema na ndenge te bomoi ya bai – mboka ebongo na bambula ebele.
Buku loye lobangisami na lisalisi ya mosolo ya Union Européenne. Maye makomami na kati awa matali bakomi ya buku oyo kasi bakambi ya misala ya
Union Européenne te.